
This episode discusses the significance of June 30th, the day of DRC's independence, and highlights the historical context surrounding it.
Mbote na bino mpe bayeli malamu na Lingala Kitoko. Liteya mwa lelo ezali speciale pamba te eza mokolo monene pona ba kongoliya na kongo RDC mpe mokili mobimba. Nga naza molakisi na bino, Jk29. Hi everyone, and welcome to Lingala Kitoko. Today is a special lesson, why though? Cause it is the 30th of june and this day is so valued to the congolese in DRC and around the world. I am your teacher, Jk29. Lisolo moke: Mokolo ya tuku misato ya sánzá ya motóbá nde bato ya Kongo ba zwaki Lipanda na bango longwa na maboko ya mboka ya Bella, na botalo ya Patrice Lumumba mpe baninga na ye oyo ba zalaki wana na Likita ya Mbalaka na Belzika. Lumumba akomaki moto monene ya masolo na biso mpe mokambi ya yambo ya guvunema na biso. Likambo ya mawa, ba bomaki ye na mobu ya nkoto moko na nkama Lobwa na tuku motoba na moko ntango azalaki na mibu tuku misato na mitano. Mbula na mbula na mokolo oyo, biso bato ya Kongo to kanisaka mpasi oyo bankɔkɔ na biso banyokwamaki (ndenge ba nyokolaki bango, ba kangaki basi na makasi aka ba violaki basi, ba bomaki bango mpe ba mimonisaki mpasi ya moto na mabɔkɔ ya bato ya Bella). Longola ko kanisa, to sepelaka mpe pona ko sikwama na biso na mabɔkɔ ya bokonzi ya…
Host: Jk29
Places: DRC, Belgium
Explore listener stats, chart rankings, contacts and more on the Officialjk29's podcast (Lingala Kitoko) podcast page.